UN staff, including eight OHCHR colleagues, detained in Yemen
OHCHR calls for their immediate release.
SOURCE
United Nations Information Centre, Democratic Republic of the Congo
TOTAL SPEAKERS
USAGE BY COUNTRY (OFFICIAL LANGUAGE)
Official Status: Democratic Republic of the Congo, Republic of Congo Home Speakers: Central African Republic, CameroonBACKGROUND
It belongs to the Benue-Congo family, Bantu group, and is spoken by over 8 million people especially in former Zaire, and as many as 15 million people including second language users. Originally Lingala was spoken around the confluence of the rivers Oubangui and Congo, but today's Lingala is a mixed language containing elements from several Bantu languages as well as French, Portuguese and English. In fact, it is the main lingua franca of the northern part of the Democratic Republic of the Congo.Na botalaka ‘te kondima limemya ya bato nyonso ya molongo pe makoki ma bango oyo ezali ndenge moko pe bakoki kopimela moto te ezali tina ya bonsomi, bosembo pe kimpa kati ya molongo.Na botalaka ‘te komona pamba pe koboya kotosa esengeli ya moto ebatelama na bokonzi ya bosembo po te, na sima yango, moto akoma na botombiki esongo na minyokoli te,
Na botalaka ‘te esengeli kolendisa boyokani na kati ya bikolo,
Na botalaka ‘te na kati ya Mokanda ya Mibeko ya Lisanga ya Bikolo ya Molongo, bato ya molongo bayebisi lisusu lolenge bandimi maloki ya tina yo moto, limemya pe lokumu ya moto, bokokani ya makoki ya basi pe mibali pe na botalaka ‘te bango bayebisi ‘te bazwi mokano ya kobongisa ezaleli ya moto pe kosala ‘te moto azwa bomoi malamu penza na kati ya bonsomi ya monene penza,
Na botalaka ‘te kozala bato nyonso na makanisi ndenge moko po na makoki pe bonsomi yango, ezali na tina monene po ‘te oyo bakani elonga,
LIKITA MONENE
ezali koyebisa
LISAKOLI YA MOLONGO OYO YA MAKOKI YA MOTO
lokola eloko oyo bato pe bikolo nyonso balingi babwa, po te bato pe mangomba nyonso, na bobatelaka tango nyonso Lisakoli yango na moteme, basala makasi na boteyi pe bokolisi bwanya, po ‘te makoki pe bonsomi yango etosama pe basala ‘te bandima pe basalela yango na bosolo penza na molongo mobimba, ezala na kati ya bato ya Bikolo ya Lisanga bango moko to na kati ya ekolo pe molongo mobimba.
Bato nyonso na mbotama bazali nzomi pe bakokani na limemya pe makoki. Bazali na mayele pe base, geli kofanda na bondeko okati na bango.
Moto nyonso azali na makoki pe bonsomi nyonso oyo elimbolami na kati ya Lisakoli oyo, bokeseni ata moke te, na mambi matali loposo ya nzoto, bomwasi to bobali, lokota, lingomba ya nzambe, makanisi ya politiki to ya ndenge mosusu, ekolo to longomba ya bato, bokulaka, mbotama to makambo mosusu.
Epai mosusu, na botalaka eloko ya moto, epikisami kosala bokeseni na mambi matali mibeko ya politiki, mibeko ya bosambisi to ya boyokani na mikili mosusu, ezala ekolo to mabele ya nsomi to oyo eyangelemani na bauta, to oyo ezwi bonsomi ya sikisiki te.
Moto nyonso azali na likoki ya kozala na bomoi, a kozala somi pe kozala motema sei na bomoto na ye.
Moto ata moke te asengeli kozala moumbu; boumbu pe boteki baumbu epikisami na ndenge nyonso.
Moto ata moke te asengeli konyokama pe kosalelama makambo ya bonyama pe oyo ezanga bomoto na lokumu.
Moto nyonso azali na likoki ‘te bayeba makoki na ye bipai nyonso.
Bato nyonso bakokani liboso ya mobeko pe bazali na likoki ya kobatelama na mobeko se ndenge moko. Banso bazali na likoki ya kobatelama se ndenge moko esongo na bikela nyonso ya bokesenisi elongobani te na Lisakoli oyo pe esengo na bikela nyonso oyo ekobota bokesenisi yango.
Moto nyonso azali na likoki ya koluka lisalisi ya solo penza na liboso ya mangomba ya bosambisi ya ekolo oyo ezali na bwanya esongo na bikela oyo ekotangola maloki ya tina endimami na mibeko po na ye.
Moto moko te akoki kokangama to kobengisama tina te.
Moto nyonso azali na likoki ‘te likambo na ye lokola ya bato nyonso, essambisama na bosembo pe na miso ya bato nyonso na esambiselo ya somi pe ya epai moko te, oyo ekozwa mikano engebene na makoki pe masenginia ye to engebene na bosolo ya likambo ye afundami.
Moto ata moko te akoki kokota pamba na makambo etali ezaleli, libota, ndako pe mikanda ya ngana to pe kobebisa lokumu na ye. Moto nyonso azali na likoki ya kobatelama na mobeko esongo na bikota-kota yango.
Moto nyonso azali na likoki, ya kozala na makanisi na ye, mayele na ye ya motema pe lingomba na ye ya nzambe; likoki yango ekopesa ye ndingisa ya kopona lingomba ya nzambe to kobongola makanisi na ye, ye moko to elongo na baninga, ezala na miso ya bato ya mei; na boteyi, na bikela, na bokumisi nzambe pe milulu.
Moto nyonso azali na likoki ya bokanisi pe bolobi; yango ekopesa ye ndingisa ya kozala na bomo na motema te likolo ya makanisi na ye ndingisa ya koluka, kozwa pe kopanza mayebisi na makanisi esika na esika, na ndenge alingi koyebisa yango.
Moto nyonso, lokola azali moko ya lingomba, azali na likoki ya kozwa lisalisi ya esalelo-lisungi, oyo ezali na ndingisa ya kopesa moto makoki ya ye ya mosolo, ya bomoi pe ezaleli, po na lokumu pe bokoli malamu ya bomoto na ye, na lisalisi ya bokasi ya ekolo pe ya boyokani ya mikili na mikili, engebene na mwango pe bokulaka ya ekolo na ekolo.
Moto nyonso azali na likoki ya bopemisi pe bopemisi nzoto, mingi ya bozwui eleko ya sembo ya boumeli na mosala pe na bozwi lifuta na bakonzi ya mbala na mbala.
Moto nyonso azali na likoki ‘te kati ya bato pe bikolo, nyonso ebonga po te makoki pe bonsomi oyo ekomami kati ya Lisakoli oyo elonga.
Mobeko ata moko te ya Lisanga oyo ekoki kozala po na Leta, na lisanga ya bato, to na moto, likoki ya kosala likambo oyo ekonyata makoki pe bonsomi awa.